Po na nga, soki lelo oyo Afrika ezali kotala se na sima, mabe euti mpe epayi na biso moko bana ya Afrika. Mbala boni bilenge ya Africa, oyo batindami na mikili ya Poto mpo na koyekola mayele ya mondele mpe ko mema yango awa na mabele na biso Afrika, kasi bango ba mibwaki na makambo ya pambala pambala, biyenga yenga mpe makambo misusu.
Tango ba ndeko na biso oy bozongaka na mabele na biso, bakotombola mapeka mpe kotala bato lokola bango bazali likolo, nzika nde kuna na mpoto bazosalaka misala ya nsoni ! Mpe bazali na tina moko te na miso ya mindele, kaka mwa ndambu moke penza nde bakoki kozala na bomoyi ya malamu kasi ebele bazali bato ya tina te! Mpe babosana makambo nyoso ya mboka na biso!
Oy nsoni!! Nsoni mpe likambo ya kokamwa soki tozali komona mwana ya Afrika alingi ko miboma na nzala mpo modele ayebisi ye ete azonga o mboka na ye!!! Babengani yo, KASI ZONGA TE...!!!
Na yebi te eloko nini ekoti na bongo ya bandeko na biso oyo bavandi na poto, soki mpe basili ko longola bango bongo toyebi te! Lelo oyo Chine azali na molongo ya mine na mokili mobimba, baleki kutu Angleterre mpe France! Mpo na mosala mpe bomoto, ye nani oyo akoki lisusu ko pesa mitinda na Chine??
Bo yebi ete na tango to zwaki lipanda, Kongo ya bankoko ezalaki na molongo moko na Canada mpe Afrique du Sud???? Mwa kilo na nzoto bandeko na ngai, soki modele alingi yo te, ZONGA na mboka na yo! Na esika ete obanda ko telengana pamba pamba, mosala te, ndako mpe ya malonga te!!!!
Partage